Totómbola Lingála 
            
            
            Mgr Égide de
Bœck  
             
            Lingála lilámu  
             
            Misálá  
             
            Bosúkísí  
             
            Wápi  
             
            Ekangisi 
              | 
            
            Misálá níni mikosalema wâná?
            Misálá
ndéngé na
ndéngé mizalí kosálema o «Totómbola lingála C. C. Mgr Égide» 
            
              - Bosangísí múku
ma kala ma lingála mpô ya bosálí ebómbelo ya búku.
(bibliothèque)
 
              - Bobimísí mbala
na mbala lokásá «Totómbola Lingála» mpô ya kolimbola mpé
koninola yooko ya ndobela ibe ya lingála mpô ya kolingisa na
batángi bayéba lingála linzenga.
 
              - Botéí lingála
linzenga o radio, o televizio, kelási mpé o bisíká bisusu.
 
              - Bobɔ́ngísí
môko múku ma kala ma lingála,
 
              - Bokomi múku ma
sika ma kelási, ma mambi ma Nzámbé tǒ ma zebi na mambi masusu
ndéngé na ndéngé.
 
              - Bobokólí
balakisi ba lingála mpé bolakisi lingála na baye balingi koyékola
lyango.
 
              - Bobongólí múku
ma nkóta isúsu na lingála.
 
              - Botekisi múku ma
lingála o etekiseli ya múku (Librairie). b.n.b.
 
             
             |