Totómbola Lingála 
            
            
            Mgr Égide de
Bœck  
             
            Lingála
lilámu  
             
            Misálá  
             
            Bosúkísí  
             
            Wápi  
             
            Ekangisi 
              | 
            
            Mpô níni totómbola lingála lilámu?
Lokóta la mbóka
lokóla lingála lozalí mpɔ̂ ya biso bai-ekólo Kongó lokóla
mabángá likoló lya mangó bakoki kotɔnga bomoto na zebi (mayɛ́lɛ) lya
moto.
            Lingala
lizalí na
matómba ebelé : 
            
              - moto óyo ayekoli
libosó lokóta la yee malámu akotongolo mpé akoyékola nkóta
isúsu mpé makambo masusu malámu mpé na bolɛmbú.
 
              - na bolobí
lingála, tosangání bai-Kongó-Kinsásá na bikólo bisusu esíká
bakolobaka lingála:
Kongó-Brazzaville, Gabon, R.C.A., Sudani, Kamerun na mikili misusu mya
Shina,
Mputu, Ameriki b.n.b.
 
              - Miziki mya biso
mizalí kopanza lingála bipái na bipái.
 
              - Lingála
likolendisa bomoko bwa ekólo.
 
              - Lingála bikoyébisa
bomei (culture) bwa Kongó mpé bwa Afríka.
 
             
            Yangó
wâná
lingála lina lisengelí kozala lya «tómbólá-bwáká»
te, Lisengelí kozala lingála linzenga mpé lya nsóló mpímbo. 
             |